Yawe na biso pesaka kimia na Yo Ngolu na Yo tosengi, yoka pe kolela na biso Yawe na biso pesaka kimia na Yo Ngolu na Yo tosengi Kangama na Nkolo eh mokili ekoti pasi Na ba ebele y'ototangi toluka boboto bomoyi ya bosantu Liloba ekokisami na tango ya suka pasi ekokota Mabele ekoningana, bikolo minene makasi ekosila bakokabuana Tobosani bilaka eh, tala tokomi kolemba Bitumba esili te, bibundeli tobombi wapi Totie kondima pembeni tokomi na posa ya nzoto te ndeko na nga Tozongela bolingo ya liboso tolata lolenge ya Klisto Na ngomba bipayi na bipayi kasi pasi ekobakisama Totala moke sima tozonga na lingomba bandimi ya liboso Soki moko azui ebandaki bango kokabola Lel'oyo eklezia ekoma ebombamelo ya mabe nionso ya mokili Zuwa, lolendo, ekobo ewuti wapi eh Biloko na zando po bapekisa bandimi Nzoka biso baklisto esengelaki tozala ndakisa Tozongela bolingo ya liboso tolata lolenge ya Klisto Revêtons-nous de la marque du Christ Yawe na biso pesaka kimia na Yo Ngolu na Yo tosengi, yoka pe kolela na biso Yawe na biso pesaka kimia na Yo Ngolu na Yo tosengi, yoka pe kolela na biso Yawe na biso pesaka kimia na Yo Ngolu na Yo tosengi, yoka pe kolela na biso Mangomba ezangi moke kasi ekobakisama baninga Totala moke sima tozonga na lingomba bandimi ya liboso Bazalaki kosangisa na bokabuani ezalaki te na kati eh Mibongisa na nzoto ezui esika na kati ya lingomba Bokeseni ezali te na bandimi pe bapagano Mokolo ya suka tokosambwa na miso na Yawe Mokonzi na biso Yawe na biso pesaka kimia na Yo Ngolu na Yo tosengi, yoka pe kolela na biso (salisa biso eh) Yawe na biso pesaka kimia na Yo Ngolu na Yo tosengi, yoka pe kolela na biso (yokela biso mawa) Yawe na biso pesaka kimia na Yo (kotala mabe na biso te) Ngolu na Yo tosengi, yoka pe kolela na biso Yawe na biso pesaka kimia na Yo Ngolu na Yo tosengi, yoka pe kolela na biso (alleluia) Yesu Masiya, Ye nde espoir ya humanité Na biso toyamba Ye liloba elobi tokomi bomoko na Ye Kasi mawa soki tokotambola lisusu lokola bapagano Tokosangisama eh Tozongela bolingo ya liboso tolata lolenge ya Klisto (totika kopona pona eh) Tozongela bolingo ya liboso tolata lolenge ya Klisto (1 Pierre 2 verset 12) Tozongela bolingo ya liboso tolata lolenge ya Klisto (bongisa bolingo na mosala) Tozongela bolingo ya liboso tolata lolenge ya Klisto (Matthieu 5 verset 16) Tozongela bolingo ya liboso tolata lolenge ya Klisto (zongela bolingo ya yambo) Tozongela bolingo ya liboso tolata lolenge ya Klisto