Naye lelo, naye lelo Naye lelo epayi ya Nkolo Yesu Klisto Masiya eh Naye kopesa ye merci pona manso asali kati na bomoyi na nga Yesu eh Nandimaki te baninga Nandimaki te bapasi na ngai ewutaki na coutume Nayebaki te minioko na ngai ewutaki na libota eh Envoûtement ekangaki ngai misu na yebaki te ba mpangi eh Nakanisaki manso ezali koyela volonté ya Nzambe Nzoka nazalaki komikosa eh, il fallait nakota mozindo nayeba Mabolongo na se Nakoti mozindo nabimi na kati ya kindoki ya libota eh Nakoti lisusu mozindo célibat na nga nionso ekweyi eh Nazindi lisusu ngai wana na longwe na kati ya chômage Nakoti lisusu stérilité na ngai nionso esili eh Yango naye kokumisa Mwana Nzambe Tika nayembela Yesu eh (Lalalalalalala) Azali Nzambe ya bikamua Oh tika nakumisa Yesu eh Asaleli ngai ya mingi eh Oh tika nabinela Yesu eh Tika napambola Yesu eh Akangoli ngai na pasi eh Yesu eh Mabolongo na se Nakoti mozindo, nabimi na kangolami na coutumes Nakoti mozindo, envoûtement nazalaki yango ekweyi eh Nakoti lisusu nabimi na kati ya servitude Nazindi makasi mapamboli na ngai nionso ezongi eh Yango naye kokumisa Mwana Nzambe Tika nayembela Yesu eh Oh tika nakumisa Yesu eh Akangoli ngai na pasi eh Asaleli ngai ya mingi Yesu eh Apesi kimia na motema Oh tika nabinela Yesu eh Solution ya makambu na ngai, Yesu eh Tika nayembela Yesu eh Tika nakumisa Yesu eh Azali Nzambe na bikamua Asaleli ngai ya mingi eh Oh tika nabinela Yesu eh Tika napambola Yesu eh Akangoli ngai na pasi eh Apesi kimia na motema Asaleli ngai ya mingi eh Oh tika nakumisa Yesu eh Akangoli ngai na pasi eh