Sango eh, sango ewuti na Africa ekomi na Europa Sango ewuti na Europa ezongi na Africa Balobi lokuta elaki kazaka oh Ekoti na ndako na Nzambe baklistu babeti maboko Lokuta elati kitoko bato mingi babanzi ekomi nde vérité Lokuta elobi fulani asali cassette ya témoignage Lokuta elobi songolo azali koyemba na kisi Lokuta elobi pakala asila nde kokufa Baklisto ya minyato balangwisi bango na lokuta Lokuta ekamati ascenseur po ekoma mbangu Vérité elandi ya n'escalier se malembe Ata ndele lokuta ekosambwa Vérité yango nde eko triompher Mawa na bato oyo basangani pona kotongaka baninga Mawa na bato oyo lokuta ekoma vérité na monoko Bazali kobosana vérité eko triompher ndele bakofuta Sango eh, sango ewuti na Africa ekomi na Europa Sango ewuti na Europa ezongi na Africa Lokuta ebandaka na jardin ya eden Adam na Eva baliaka mbuma se pona lokuta Lokuta ekoti na ndako ya Abraham Aprésenter mwasi na ya lokola soeur na ye Lokuta ekoti na mboka na Egipito Mwasi ya mokonzi alobi Joseph aluka ye makangu Lokuta elangwisi bakonzi ya Loma Balobi Yesu asekwi te balobi bayakoli bayibaki Ye Lokuta ekoti Anania na Safira Bakosi lingomba na biloko batekaki Lokuta ekoti lelo na lingomba ya Masiya Elati kazaka bato mingi babongoli yango vérité Lokuta elati kazaka ya prophetie Lokuta ebebisi ba ministère ebele Lokuta ekaboli pe mangomba mingi Basakoli bakoti na kati ya kokabuana lelo Bato mingi bakomisi lokuta vérité Mokolo ezali vérité yango nde eko triompher Moklisto ya solo azali moto ya vérité Matoyi na ye ekoyokaka bobele se vérité Monoko na ye eyebi kotatola lokuta te Koko ya lokuta kombo na ye satana Bato ya lokuta bayebi bakokende na moto Kasi oyo ayebi vérité lobiko na ye ezali assuré Mawa na bato oyo basangani pona kotongaka baninga (Kotongaka baninga) Mawa na bato oyo lokuta ekoma vérité na monoko Bazali kobosana vérité eko triompher ndele bakofuta (Mawa eh) Mawa na bato oyo basangani pona kotongaka baninga (Kotongaka baninga tango nionso) Mawa na bato oyo lokuta ekoma vérité na monoko Bazali kobosana vérité eko triompher ndele bakofuta (Bino kuna na ngambo boyoka) Mawa na bato oyo basangani pona kotongaka baninga Mawa na bato oyo lokuta ekoma vérité na monoko Bazali kobosana vérité eko triompher ndele bakofuta