Oh nasali nini? Sengela mwana moninga Ozui ngai na pasi Batela ngai na tango ya likambo bamona Bondela ngai soki nasiliki Mwasi alingaka présence ya mobali Oh tokabola foti Mabe ebandi na yo pe na ngai Lokola bato bayebi toluka équilibre Kengela mwana ya bato eh Bondela mwana ya bato eh Matata ya mwasi na mobali esila te na mokili Mama ah, mama ah Likambo nini Nzambe osala biso mibali? Tosalelaka basi Bango baliaka, balataka Biso mbula mobimba pantalon moko na nzoto Etoboka kutu oh mama Mama abota ngai mwasi Oyo akonyokolo ngai mwasi Nzambe apesi ngai etumbu Nabotaka basi bandeko Banyokola bana ya bato Nayoka motema pasi bandeko Soki abimi azongi Kotuna epayi awuti te Comment? Soki okendeki kotraiter ba affaires Olobi, ozonga, olia, opema Akomi kotuna yo: Owuti wapi? Ozalaki wapi? Owuti wapi? Balobaki boye Mwasi ngai nabala na mosoio Nani apesi ye autorisation Atuna ngai epai nawuti bandeko? Likambo nini Adamu Olataka ndambo ya liputa Eva akosaka yo biso tomonaka bwale Oleka awa basi Kuna? Oleka kuna matata bandeko Bino basi, basi bandeko Bino moko bokoboto biso Bino moko bokobala biso Bino moko bokobokolo biso Tokosala nini bandeko? Obalani yo na mobali Matata mikolo nionso na ndako bandeko Pona nini boye eh? Mwasi akoki koloba na yo Azali na pasi na libumu Lokuta na ye Yo osilisi mbongo na médicament na pharmacie Nzoka azali kokosa yo Ayebi sekele na ye bandeko Yoka miziki ya bana Kinshasa Ya grand François Mona eh, ozali wapi? Na bilanga? Oyo ya bayaya pe ya bakulutu Po bato wana bato te