Marna, mboka etumba oh
Libala nayaki pasi oh
Nakutaki bana ya mbanda oh
Lokola ngai nabotaka te
Tika ko bamonela ngai
Lokola marna na bango atindi bango

Mama tika nalela oh
Mobali nayeilaki oh
Apesaka ngai attention
Po na bana na ye nakuta
Abengelaka ngai mbanda na ndako
Akosa ngai: Aye kotala bana
Soki nalobi: Alobi na ngai
Oyo marna na bana oh

Marna tala likambo
Mwana nionso bakobetaka
Ngai lokola nabotaka te
Jeudi nabetaki mwana ya mbanda
Aniataki potopoto ya mbula
Aye koniata n'ango ba fauteuil
Tango mobali na ngai ayaki
Au lieu atuna likambo, asiliki wowo
Alobi nabota ya ngai mwana nabetaka wo ye

Mama ah
Bana ya mbanda kobokolo te
Nzoto na ngai ekomi kokondo
Likolo ya bana naboti te oh
Mobali pe andima ngai te
Ngai ko libumu eboya zemi
Nakoma na ngai amela milangi
Marna naboyi na ngai libala
Nakozonga soki nazui zemi wowo
    Página 1 / 1

    Letras y título
    Acordes y artista

    restablecer los ajustes
    OK