Naye Nkolo na nga na bososoli, Masiya Ya bozalisami na yo kati na motéma Ndé lokola bozui na ngai awa na se na moyi Nionso yo okoma pona nga pe oyo osala po na nga Yango ndé motema esopi lokola loyembo ya lelo Liboso ya kiti ya ngolu, yamba yango na esengo Motéma ebombi ekoki té ekomi kobima na maloba Epunzi makasi kati ya moto, ebonguani ekomi loyembo Na bozalisami na yo nazui esengo na bungisa wuta kala Na bozalisami na yo nazui Kimia na zangaka na mokili Olaka koyanola pe kolakisa nga mabombami na yeba té, oh Nionso po aza kati na yo Na lisolo na biso mibalé, obombelaka ngai eloko té Nionso ozwa na tata olakisa moto tokoma baninga Onetolama, onetola nga moninga na yo, oh Nionso po naza kati na yo Opesa nga kombo ya sika, mosantu kati na yo (kati na Yo, papa na nga) Na yo ndé nasimbami pona seko (aah Yésu nanga) Okoma esika ya bopemi na nga (Yo ndé liloba na bomoyi) Nionso po naza kati na yo (ngai nakoma moto n'esengo, Yésu eh) Na koma moto na esengo libela kati na yo (osimbisa nga bendele nayo, Yésu eh) Na simba bendele ya elonga, Mayisa Yésu na nga (Masiya, Masiya na nga) Okoma esika ya bopemi na nga (aah Yésu na nga) Nionso po naza kati na yo (Yaya, opesa nga kombo ya sika Yésu eh) Opesa nga kombo ya sika, mosantu kati na yo Na yo ndé nasimbami pona seko (ah Yésu nanga) Okoma esika ya bopemi na nga (Yo ndé bolingo ya motéma na nga) Nionso po naza kati na yo (ngai nakoma moto n'esengo, Yésu eh) Na koma moto na esengo libela kati na yo (osimbisa nga bendele nayo, Yésu eh) Na simba bendele ya elonga, Mayisa Yésu na nga (Masiya, Masiya na nga) Okoma esika ya bopemi na nga (aah Yésu na nga) Nionso po naza kati na yo Po na nga, Y'okoma Nzambe (Abenga makambo nionso ya sika) Olona elikya po nga na bosana (makambo nionso ya kala) Oya na makoki kolongola lisumu (po nakoma mosantu) Nzambe na nga (nionso po naza kati na yo) Nionso po naza kati na yo oh (nionso po naza kati) Yango opesa nga kombo ya sika yesu eh Opesa nga kombo ya sika, mosantu kati na yo Na yo ndé nasimbami pona seko (aah Yésu nanga) Okoma esika ya bopemi na nga (naza na Nzambé mosusu té oh) Nionso po naza kati na yo (ngai nakoma moto n'esengo, Yésu eh) Na koma moto na esengo libela kati na yo (osimbisa nga bendele nayo, Yésu eh) Osimba bendele ya elonga, Mayisa Yésu na nga (Masiya, Masiya na nga) Okoma esika ya bopemi na nga Nionso po naza kati na yo (aah nionso po naza kati na yo) Oh-oh, oh-oh, nionso po naza kati na yo Otia elembo ya bonzambe kati na nga mosantu (oh-oh, oh-oh, nionso po naza kati na yo) Nakoma mosangoli ya libula ya bilaka ya Nzambe tata (oh-oh, oh-oh, nionso po naza kati na yo) Po na yo Yésu mokili ya molili ekoma kobanga nga (oh-oh, oh-oh, nionso po naza kati na yo) Nakoma tempelo efandisa molimo ya Nzambe tata (oh-oh, oh-oh, nionso po naza kati na yo) Bomoyi na nga na mokili ekoma ya moleki nzela (oh-oh, oh-oh, nionso po naza kati na yo) Nionso nakosala ekosimba po naza ndé moponami (oh-oh, oh-oh, nionso po naza kati na yo) Esengo ya Nzambé ekoma makasi na nga mosantu (oh-oh, oh-oh, nionso po naza kati na yo) Bongo bilembo ya bonzambé emema nga n'epimelo ya likolo (oo o nionso po naza kati na yo) Wuta okota kati na nga, nakoma moyengebene (oh-oh, oh-oh, nionso po naza kati na yo) Yaya obundaka ata bitumba oyo miso na nga emonaka té (oh-oh, oh-oh, nionso po naza kati na yo) Nazalaka moto ya kolela, nakoma moto ya koseka (oh-oh, oh-oh, nionso po naza kati na yo) Oza ya nga, naza ya yo Yésu, eeh Opesa nga kombo ya sika, mosantu kati na yo Na yo ndé nasimbami pona seko Okoma esika ya bopemi na nga (Yo ndé makasi ya motéma na nga) Nionso po naza kati na yo (ngai nakoma moto n'esengo, yaya na nga) Na koma moto na esengo libela kati na yo (osimbisa nga bendele nayo, Yésu eh) Na simba bendele ya elonga, Mayisa Yésu na nga (Masiya, Yésu na nga) Okoma esika ya bopemi na nga (aah Yésu na nga) Nionso po naza kati na yo Elombé, elombé ya motema na nga (nionso po naza kati na yo) Elombé, elombé ya libota na nga (nionso po naza kati na yo) Elombé, elombé ya mboka Congo (nionso po naza kati na yo) Nionso po naza kati na yo Nionso po naza kati na yo