Hmm caramba mamá mía, kombo na yo nani oh mama? Ngai soeur kiyika Namoni miso na yo lokola colombe pe etaleli na yo ya innocence Hein Humm mwasi, nalinigi natonga palace d'amour na motema na yo pona libala Olobi nini oh? Eh Olobi nini ko mama? Eh Ezalaka na moto moko alinga ngai mingi Wuta libumu ya mama eh Ezalaka na moto moko alinga ngai mingi Wuta ebandeli ya mokili eh Libela na vie na ngai oh, oh Ah, tika nanu motema na nga eloba Po kati na yo nazomona liziba ya mayi ya peto Nzoka motema na nga eza na posa ya komela mayi wana Nayebi oza mukolo mama, hein? Osi okomi déjà na esika na nga Olobi nini ko? Hein? Olobi nini ko mama kiyika? Yo olingi ngai lelo Nini yango elakisi okolinga pe moninga na ngai yo yo Olingi nga camarade Nini yango elakisi okolinga pe lipasa na ngai yo yo Ye wana motema na ngai yo yo Nameseni na ye oh oh oh Moninga ya libala wo wo Nakoka te kozanga yo oh Ah, mama na ngai, lobela nga nanu vraiment Moto'ango boza na ba relations nini yo na ye Lobela nga nayeba ye, ah Nalingi nayeba te, lobela nga nanu vraiment, ah Nazalaki na libumu ya mama nayebaki te Nzoka nde nazalaki na ye oh Kobotama na ngai navimbi na ye elongo Nakoli pe na ye tomeseni Moninga ya motema soki nga nabeli Ye wana liboso Soki nga nakweyi to likambo na vie na nga Ye wana solution Alongola nga posa ya mibali mosusu Ah yesu eh ye Okosalela nga nini oyo ye akokaka te Aza na nionso oh Comment faire pour le connaître? Je suis prêt à connaître cet homme Pour lui donner les codes de mon coffre-fort qui est mon coeur Afin qu'il soit mon ami, qu'il fasse de moi ce que tu es Et qu'il soit la lumière de notre amour Nalobela yo ya solo, akanga ngai singa Alokota nga na poto poto Nazalaki eloko ya pamba bato batalaki miso te Apesi nga valeur oh Lobela nga soki yo ozalaki na esika na nga Olingaki osala nini eh, eh? Tokata ndayi na ye Moko te na biso ayokisa moninga pasi oh Yo olingi ngai lelo Nini yango elakisi okolinga pe moninga na ngai yo yo Olingi nga camarade Nini yango elakisi okolinga pe lipasa na ngai yo yo Encore une fois, écoute mon coeur pleurer Comme un robinet qui coule sans connaître le [?] ce qu'il va creuser sur son parcours Qu'on deversait une grande quantité d'eau Je n'aurais aucun interet à te faire souffrir Crois à ce que je te dis, un jour tu me donneras raison Lokola nalingi yo mingi Eloko nionso okotinda nga nakotosa kaka oh ye Lakisa nga moninga na yo nameka ata kolinga Noki te naya kozanga yo oh Nalingi yo mingi Linga ngai na libala oh oh Nakoka te nazanga yo oh Moninga na nga (yesu klisto) Hmm lipasa na nga (jésus) Camarade na nga (Elohim) Ah eh mi corazón (alpha omega) Minha vida eh (jehovah nissi) Oh lisu na nga (amonaka nga) Ayokaka nga (ayokaka nga) (Alobaka na nga na voix douce oh oh) na voix ya douce Ndima ngai na libala mama Papa tika nakotosa yo oh Ye aza témoin na biso yesu Ye akanga yango likolo Kino liwa ekokabola biso Po nandimi ye na pasi eh ye Mama omonisi nga pasi oh oh Nakoka te kozanga yo eh Nalingi yo mingi oh oh Nga pe nakotosa yo oh Namoni pasi mingi mama Papa ti nga nayebaki te oh L'essentiel ondimi nga na libala Ah, komonisa nga pasi te eh Nzoto na nga ekomi nde ya yo Motema eza kobeta ngai oh yo Nga pe eza kobeta ngai oh yo Papa eh eza kobeta mbangu mbangu Vraiment ya solo ondimi nga na libala Nga na yo mosuni moko eh Totikala libela, tosala famille Totikala libela, tosala famille