Nzambe alingaki mokili yango atindaki Yesu Klisto Po tondimela Ye oh, tozua bomoyi ya seko amen Yesu azuaki esika na nga oyo a meritaki te Tala bolingo na Ye oh kati ya bomoyi na nga Papa na ngai oh Lisumu ememaki liwa eh, ememaki bapasi Ememaki minioko kati ya bomoyi na nga nalingaki kokufa na ngai oh Lisumu na nga esili kolimbisama ngai nafuti eloko te Se na bolingo na Ye oh kati ya bomoyi na nga oh Yaya Yesu akufelaki nga, ngai napesi eloko te Yango nga napesi Ye mongongo na ngai nayembela Ye oh Kino liwa na nga Yesu akufelaki nga, ngai nafuti eloko te Yango nga napesi Ye mongongo na ngai Yango nga napesi Ye mobimba na ngai nzoto pe molimo kamata Nga nalukaki ekimelo na maboko ya bato ya mokili nazui te Kimia nalukaki na ba kwiti nazui te, solution Yesu Masiya Akangoli nga na minioko ya Satana Nzambe alingaki mokili yango atindaki Yesu Klisto Po tondimela Ye oh, tozua bomoyi ya seko amen Yesu azuaki esika na nga oyo a meritaki te Tala bolingo na Ye oh kati ya bomoyi na nga Papa na ngai oh Lisumu ememaki liwa eh, ememaki bapasi Ememaki minioko kati ya bomoyi na nga nalingaki kokufa na ngai oh Lisumu na nga esili kolimbisama ngai nafuti eloko te Se na bolingo na Ye oh kati ya bomoyi na nga oh Masiya Kombo mosusu te kaka Yo Yesu eh Ofandi na bisika eleki na likolo Nakumisi kombo na Yo ya lokumu Uh, Nkolo na nga Yo nde Nzambe na nga Papa Y'obongwani te Kombo mosusu te kaka Yo Yesu eh Ofandi na bisika eleki na likolo Nakumisi kombo na Yo ya lokumu Uh, Nkolo na nga Yo nde Nzambe na nga Papa Y'obongwani te