Nanu namona te esika mokonzi azali basali bazanga êê Nanu namona lisusu te esika mokeli azali ekelamu ezanga ôô Ngai ye, nasalelaka Nzambe na tina êê Nayembelaka Ye na tika te Soki naza kolela na lelaka na tina êê Ba ndeke likolo ba yembela Ye Ngai nayemba te mpo nini êê Makasi ya nzoto nazuaka epai na Ye Yesu êê Ba mbisi na mayi bayokaka mongongo ya mokeli na bango Yesu tango akotaki na likambo oyo tala mbisi etondi na filet Aâ ba niama mpe bayokaka mongongo ya maitre na bango Ba dindisi Daniel na libulu ya ba nkosi ba boyi kolia ye ôô Ebongo ngai nasalemi na elili na Ye na tosa mpo nini? Na kima wapi? Mbamba ââ (Yesu oyo ya bomoyi) Zua bomoto na ngai osala oyo Yo olingi Mayele molimo na ngai Mema ngai esika olingi Yesu êê Na kima Ye wapi? Mbamba ââ (Yesu oyo ya kimia) Zua bomoto na ngai osala oyo Yo olingi Mayele molimo na ngai Mema ngai esika olingi Pardon Yesu êê Ngai ye, na landaka Nzambe na tina ôêê Basusu ba pengua Ngai na pengua ndenge nini êê? Basusu ba tshiola Ngai na tshiola ndenge nini ôê? Makambo oyo asalelaka ngai eleka ngai na mbula êê Tika lelo ba finga yo Tango lobi akosala bakokamua yo Ba kola yo ba etiquette ya ba griffe nionso ya mabe ôô Soki maloba ya kobondela esili Banda koyemba ako yoka Yo êê Aza matoyi ayokaka Aza na misu ako mona yo êê Mabende eyokaka mongongo na Nzambe êê Na nzela na loyembo ya Paulo na Silas Ma bende etosaki êê Eêê ba nzete mpe eyo kaka mongongo ya Nzambe ôô Nzete oyo ezangaki kobota mbuma Yesu agangi etosi ekawuki êê Mbamba ââ (Yesu oyo ya kimia) Zua bomoto na ngai osala oyo Yo olingi Mayele molimo na ngai Mema ngai esika olingi Pardon Yesu êê (Pardon Yesu kotika ngai ôô, kobuaka ngai te ôô, zua ngai êê) Mbamba ââ (Yesu oyo ya bomoyi) Zua bomoto na ngai osala oyo Yo olingi Mayele molimo na ngai Mema ngai esika olingi Pardon Yesu êê (Ââ Yesu, ââ Yesu, mema ngai esika olingi, mema ngai esika olingi) Ngai êê nasalelaka Nzambe na tina êê Soki nako yemba, na yembaka na ngai na tina êê Makambo oyo asalelaka ngai eleka ngai na mbula êê Ngai nalelaka mpona na famille na ngai êê Makambo oyo asalela muana na ngai Ruth elaka ngai na mbula êê Yesu okotisa ngai ba niongo ebele êê Ata bino moko nakima wapi, na kima wapi êê Ââ ngai êê alokota ngai na fulu Nakima Ye wapi êê Mbamba ââ (Yesu oyo ya bomoyi) Zua bomoto na ngai osala oyo Yo olingi Mayele molimo na ngai Mema ngai esika olingi Yesu êê Yaya Mbamba ââ (Yesu oyo ya kimia) Zua bomoto na ngai osala oyo Yo olingi Mayele molimo na ngai Mema ngai esika olingi Pardon Yesu êê (Pardon Yesu) (Kotika ngai te nako sambua êê) Mbamba ââ (Yesu oyo ya kimia) Zua bomoto na ngai osala oyo Yo olingi Mayele molimo na ngai Mema ngai esika olingi Pardon Yesu êê Zua ngai êê Mbamba ââ (Yesu oyo ya kimia) Zua bomoto na ngai osala oyo Yo olingi Mayele molimo na ngai Mema ngai esika olingi Pardon Yesu êê Pardon Yesu Mosika na Yo nakokoka te Mosika na Yo naza eloko ya pamba Mbamba ââ (Yesu oyo ya kimia) Zua bomoto na ngai osala oyo Yo olingi Mayele molimo na ngai Mema ngai esika olingi Yesu êê Zua ngai êê Êê Yaya Mbamba ââ (Yesu oyo ya kimia) Zua bomoto na ngai osala oyo Yo olingi Mayele molimo na ngai Mema ngai esika olingi Yesu êê Yaya pasi Eê Biso ba oyo libanda na Yesu ata seconde Tokufi kokufa Yesu na ngai êê Mbamba ââ (Yesu oyo ya kimia) Zua bomoto na ngai osala oyo Yo olingi Mayele molimo na ngai Mema ngai esika olingi Pardon Yesu êê Nako kufa Mosika na Yo mpasi Mosika na Yo insécurité Mbamba ââ (Yaka ofandisa ngai Yaya) Zua bomoto na ngai osala oyo Yo olingi Mayele molimo na ngai Mema ngai esika olingi Yesu êê