Ozui malade, okei epai ba dokotolo Balobi malade na yo eza na kisi te Eza réalité ya vie Ah yo obotaka te, minganga ba condana yo Balobi vie na yo mobimba okosimba muana te Ondima réalité ya vie, mama eh Ndeko owuti kobungisa ndeko, akotaki na coma eh Minganga basali nionso balembani balobi akufi na ye Oyo pe eza réalité ya vie mama eh Basusu bakanga bango na mpungu eh Elengi ya libala bayokaka kaka na sango Suka suka bazonga ndako ya baboti Oyo pe vraiment eza réalité ya vie Ngai nayebi pe mosala maboko Esika nionso nakobeta porte ata toza babale Ba kozua moko batiki ngai Eza réalité ya vie Vie na nga nde somo, Papa vie na nga problème Nakoya kokufa pamba, soki otiki nga nasambue kosambua eh Ah, nga pasi eh Libota na nga pasi libota na nga somo Natuni balobi nga nandima réalité ya vie Pona nini basusu bazuaka basusu bamonaka pasi Nzambe? Moyi ebimaka pona moto nionso eh ma Mbula ebetaka pona moto nionso, butu Butu eyindaka pona moto nionso ngai eh Moyi ebimaka pona moto nionso Natuni balobi nga nandima réalité ya vie namoni pasi Vie na nga nde pasi eh, nakoya kokufa pamba ngai eh Soki otiki nga nasambue kosambua eh Kombo na Yo ekoya kotshiolama pamba Nzambe na ngai Ngai bazotuna nga wapi Nzambe na yo eh aza wapi Réalité ezalaka kaka boye, vie ya moto kaka boye Condamnation ya bato ya mokili ezalaka kaka bongo Kasi eza na maitre moko soki akoti na motema na yo Achangeaka histoire ya vie, impossible ekomaka possible Kombo na Ye Jehovah Jiré Kombo na Ye Jehovah Shalom eh Nzambe ya paix Kombo na Ye Alpha Omega ebandeli mpe suka Kombo na Ye Nzambe Malamu, nalela vie na nga (Yesu, Yesu solution ya vie na ngai eh, Papa eh) Nalingi nabetela yo bapasi na nga nayebi te ndenge nini ya kobanda Yesu kota na ba chambre ya motema eh obimisa ba pasi elie nde nzoto eh (Yesu, Yesu solution ya vie na ngai eh, Papa eh) ah Yaya eh, kotika te nakowa eh Basombeli nga lilita basombeli nga lopango Nakufa lelo lobi mosika Nzambe na nga olobi nini eh? (Yesu, Yesu solution ya vie na ngai eh, Papa eh) Olobi nini eh? Olobi nini eh? Nga nakomi na suka eh Nazanga papa eh, nazanga mama eh Yo nde okoma nionso na ngai eh Yesu nde Papa ya bana bitike (Yesu, Yesu solution ya vie na ngai eh, Papa eh) sunga ngai eh Papa vie na nga somo, vie na nga pasi, vie na nga kokamua Bapesa nga bakombo ebele na mokili, nakima wapi Soki otiki nga nasambue kosambua Kombo na Yo ekoya kotshiolama pamba Yaya bazotuna nga wapi Nzambe na yo Oza wapi, oza wapi eh? Tata oza wapi oh? Tango olakaki nga eh, tozalaki biso mibale Bilaka na Yo na motema, nabombi makasi Yaya na nga nazozela crie ya suka eh Soki ogangi banguna bakimi eh Yaya soki osali te tokoti ndaku Oza wapi eh? Oza wapi eh?