Makambo mosusu bakoka ko expliquer yango te oh Témoignage mosusu okoyeba ndenge ya kobandela te oh Likambo yango na Yesu eh, sekele yango na Tata na mwana eh Moto na moto na litatoli na ye eh, oyo yanga litatoli yango oyo Nakomaki lokola mwasi aza na zemi Sánzá libwa azo bota te oh Nani akitisa ngai mokumba naza na'ango oh E collé na ngai na nzoto eboyi kotika ngai ye eh Nakomaki lokola moto akoti zamba Abungi nzela ya kobima eh Nani alakisa ngai nzela mpona na bima eh Miso mpe ezomona malamu te eh Somo na ngai lokola esclave aza ko tourner Tout autour ya maitre na ye Kino asenga liberté na ye Po motema na ye efanda kimia Kombanga na ngai lokola sentinelle Azozela tongo etana azua kimia Mpo mokumba azua na vie na ye Akengela mpo moyibi akota te Kombanga lisusu lokola bébé Azolela tango nionso eh Bongo maman aluka pasi aza na'ango Po monganga abikisa muana eh Pasi etingami na nzoto eh ma Wapi mongongo oyo elekisa biloko ngai eh Nzoto ekomi ko décevoir elamba ya kolata wowo oh Wapi monoko nakangisa pasi na ngai eh Nani yango nayebisa bapasi na ngai eh Avocat aza wapi a plaidé pona pasi na ngai eh Ah juge aza wapi akatela nga likambo eh Po pasi eboyi kotika ngai eh Ah, moyibi to liwa ya nini eyiba to eboma bapasi na ngai etika ngai bomoyi Soins intensifs ekoma ekomaki mbeto na ngai ya libela eh Prof nini apesa ngai mateya ya kokima pasi ya molimo eh Monganga nini asala ngai opération ya pasi ya molimo eh Motuka pe mpepo nini emema ba pasi na ngai mosika na ngai eh Masuwa pe lokalo nini ebuaka bapasi na ngai na lubuaku eh Volcan to mopepe nini eh Yaya eh Rivière mpe mbonge nini emema bapasi na ngai esika elingi êê Mafuta to pe savon nini na pakola na longola bapasi na ngai eh Kiti pe mbeto nini na lala natikela ye bapasi na ngai eh Eh Yaya eh, Yaya eh, Yaya na ngai eh oh Ah eh pasi eboyi kotika ngai eh Bapasi ezingaki ngai nayokaki solo ya liwa yeye Ngai nakomaki na suka pasi eyokisaki ngai liwa yeye êê Nzoka Yesu Klisto mosungi ya kokamua eh Akufaki pona biso tobika oh ma Amemaki mikumba na biso mpo tozua liberté Liberté na ngai, liberté na ngai eh, liberté na ngai eh Yesu Klisto Liberté na ngai eh ma Ah Yesu Klisto Liberté ya famille na ngai wowo oh Ah Yesu Klisto Liberté ya Congo oh Ah Yesu Klisto, ah Yesu Klisto eh ah eh Liberté na ngai oh Okokuta ngai maboko na moto nazozela liberté na ngai eh Ah ngai natie mabolongo na se nazo zela liberté na ngai ekoka eh Nasimbi motema na ngai, liberté oza wapi eh Ah liberté na ngai eh, liberté na ngai eh Yesu liberté oza wapi Likama, likama nandimaki te ekokomela ngai boye Ekokomela ngai boye Ah Yesu Klisto, ah Yaya ya baleki eh Ah liberté na ngai eh, Yaya oza wapi eh Yesu Klisto liberté