Lolenge Ya Klisto

Aimé Nkanu

    Continúa después del anuncio

    Yawe na biso pesaka kimia na Yo
    Ngolu na Yo tosengi, yoka pe kolela na biso
    Yawe na biso pesaka kimia na Yo
    Ngolu na Yo tosengi

    Kangama na Nkolo eh mokili ekoti pasi
    Na ba ebele y'ototangi toluka boboto bomoyi ya bosantu
    Liloba ekokisami na tango ya suka pasi ekokota
    Mabele ekoningana, bikolo minene makasi ekosila bakokabuana

    Tobosani bilaka eh, tala tokomi kolemba
    Bitumba esili te, bibundeli tobombi wapi
    Totie kondima pembeni tokomi na posa ya nzoto te ndeko na nga
    Tozongela bolingo ya liboso tolata lolenge ya Klisto

    Na ngomba bipayi na bipayi kasi pasi ekobakisama
    Totala moke sima tozonga na lingomba bandimi ya liboso
    Soki moko azui ebandaki bango kokabola
    Lel'oyo eklezia ekoma ebombamelo ya mabe nionso ya mokili
    Zuwa, lolendo, ekobo ewuti wapi eh
    Biloko na zando po bapekisa bandimi
    Nzoka biso baklisto esengelaki tozala ndakisa
    Tozongela bolingo ya liboso tolata lolenge ya Klisto

    Continúa después del anuncio

    Revêtons-nous de la marque du Christ

    Yawe na biso pesaka kimia na Yo
    Ngolu na Yo tosengi, yoka pe kolela na biso
    Yawe na biso pesaka kimia na Yo
    Ngolu na Yo tosengi, yoka pe kolela na biso
    Yawe na biso pesaka kimia na Yo
    Ngolu na Yo tosengi, yoka pe kolela na biso

    Mangomba ezangi moke kasi ekobakisama baninga
    Totala moke sima tozonga na lingomba bandimi ya liboso
    Bazalaki kosangisa na bokabuani ezalaki te na kati eh
    Mibongisa na nzoto ezui esika na kati ya lingomba
    Bokeseni ezali te na bandimi pe bapagano
    Mokolo ya suka tokosambwa na miso na Yawe Mokonzi na biso

    Yawe na biso pesaka kimia na Yo
    Ngolu na Yo tosengi, yoka pe kolela na biso (salisa biso eh)
    Yawe na biso pesaka kimia na Yo
    Ngolu na Yo tosengi, yoka pe kolela na biso (yokela biso mawa)
    Yawe na biso pesaka kimia na Yo (kotala mabe na biso te)
    Ngolu na Yo tosengi, yoka pe kolela na biso
    Yawe na biso pesaka kimia na Yo
    Ngolu na Yo tosengi, yoka pe kolela na biso (alleluia)

    Yesu Masiya, Ye nde espoir ya humanité
    Na biso toyamba Ye liloba elobi tokomi bomoko na Ye
    Kasi mawa soki tokotambola lisusu lokola bapagano
    Tokosangisama eh

    Tozongela bolingo ya liboso tolata lolenge ya Klisto (totika kopona pona eh)
    Tozongela bolingo ya liboso tolata lolenge ya Klisto (1 Pierre 2 verset 12)
    Tozongela bolingo ya liboso tolata lolenge ya Klisto (bongisa bolingo na mosala)
    Tozongela bolingo ya liboso tolata lolenge ya Klisto (Matthieu 5 verset 16)
    Tozongela bolingo ya liboso tolata lolenge ya Klisto (zongela bolingo ya yambo)
    Tozongela bolingo ya liboso tolata lolenge ya Klisto

    Información de la canción

    Composición: Nkanu Nzuzi Aime

    ¿Los datos están equivocados?

    Enviar revisión