Associé (feat. Montana Kamenga e Dede Djasco)

Fally Ipupa

    Continues after the ad

    Assoc, associé
    L'empereur Tchatcho Mbala Kashogi
    Ba diamants ebele lokola pare-brise ya car arrière epanzani
    Mais pesa pe bolingo ti
    Le président Malik Thoé très très fort
    Youyou Clinton à Abidjan
    Assoc

    Associé na ngai
    Tala ndenge monoko eboyi lokuta e refoulé epayi ya miso
    Miso pe lokola ye alobaka te, atangisi be mayi
    Moyibi mobimba akoteli ngai na midi, ayibi kaka mbeto nasala nini?

    Mais bolingo ezali lokola lisano ya Nintendo
    E pratiquamaka se epayi nionso prise ezali

    Mais y'osali nini, oyibi nga mbeto
    Y'obosani canapé, tapis pe ezali
    Mais y'oyibi outillage, obosani artisan
    Artisan nde chéri na ngai, Tchatcho Mbala
    Chéri na ngai y'olobaka na ngai
    Bolingo ya nga na yo, ata liwa ekokabola te
    Pourquoi y'obongoli motema, likolo ya likambo moke Papa?
    On dirait okananga wuta kala, Tchatcho Mbala
    On dirait okangela nga kanda na motema

    Dédicace

    Continues after the ad

    Tcha-tcho nakanisaki bolingo yango ezalaki ya solo (nzoka okosaka n'o ngai)
    Mbala na kanisaki bolingo yango ezalaki ya solo

    Tchatcho o profiter na faiblesse, po moyibi akoteli nga na ndako (na midi)
    Nga nasali bozoba portable erreur chiffre moko e sonner epayi ya (moto mususu)
    Mama (une faute avouée est à moitié pardonnée)
    Est à moitié pardonnée (une faute avouée est à moitié pardonnée)
    Tchatcho pardon zonga (Mbala)
    Nandimi faute eza ya nga (Tchatcho)
    Mbala pardon o zongela ngai (Mbala)
    Nandimi faute eza ya ngai (Tchatcho)
    Natikaki ndako polele po tozalaki kaka midi
    Nalingaki na aerer ndako, moyibi ya bolingo akoti
    Limbisa na yo ngai
    Pardon chéri
    Tchatcho okomisi ngai valise, na mema nani, na boya nani?
    Tombola bwaka pe ngwanzu, ya poto pe ezali
    Chéri yak'ozua no ngai, okomisa nga ata baignoire
    Po tous les jours yo osokolaka, nafanda na poso na yo
    Tchatcho apesi ngai acide, ye amoni mondoki nde retard
    Nakufa natika ye, y'asala vie na ye, abomi nga

    Bolingo, bolingo esalaka pasi
    Soki olingi moto na motema mobimba
    Et pourtant epayi na ye
    Atiaki yo na motema te
    Nzoka na silicone ya libele
    Soki alongoli silicone bolingo mpe, ekeyi nango

    [Montana Kamenga]
    Ma M'Pama (hum Sommet des Sommets)
    Mama na Pupo
    Ma'Vita ya Beya
    Po lelo bazokamwa nga ndenge nazotambola na chemise en plein hiver pe na kotoko nionso
    Po je t'aime oyo nalobelaki yo eleki conjugaison ya verbe donner na vie ya mobola n'ebele (Conclusho Renverso)
    Yango esali retour na motema
    Souci elatisa nga manteau ya nkewa

    Bolingo, bolingo esalaka pasi
    Soki olingi moto na motema mobimba
    Et pourtant epayi na ye
    Atiaki yo na motema te
    Nzoka na silicone ya libele
    Soki alongoli silicone bolingo mpe, ekeyi nango

    [Dede Djasco]
    Mawa Eldepio nani otika nga'awa
    Kolemba awa na ngo
    Amour na yo ekomi'o faire souffrir
    Nazokoka te
    Est-ce qu'epa na yo, mabe nasali?
    Nayeba wo wo wo Emma na nga Lara

    Bolingo, bolingo esalaka pasi
    Soki olingi moto na motema mobimba
    Et pourtant epayi na ye
    Atiaki yo na motema te
    Nzoka na silicone ya libele
    Soki alongoli silicone bolingo mpe, ekeyi nango

    Dédicace

    Dédicace
    Mais nayebi bolingo eza mabe na malamu
    Pourquoi

    Song details

    Composition:

    Did you see an error?

    Enviar revisão