Boya Kotala

Henri Papa

    Continúa después del anuncio

    Boya ko tala eh
    Aza na bomoyi eh
    Nkolo yesu alongoli nga soni ii
    Masiya yesu akabeli nga bomoyi
    Boya Boya Boya eh
    Boya kotala eh

    Nazalaka ya kotelengana na mokili eh
    Moto ya masumu nani atala nga na lisu ya mawa eh
    Nkolo yesu alongoli nga soni ii
    Masiya yesu akabeli nga bomoyi eh
    Mokili esimbelaki nga mabanga po na kufa
    Lisumu na salaki esengelaki nga naleka
    Nkolo yesu azui esika na nga eh
    Alobi na nga: Vas et ne peche plus
    Boya Boya Boya eh
    Boya kotala eh
    Na komi pe moto ya sika nga oyo
    Aza na bomoyi eh

    Continúa después del anuncio

    Nkolo yesu alongoli nga soni ii
    Na yembi yango na nzembo
    Masiya yesu akabeli nga bomoyi eh
    Boya Boya Boya eh
    Boya kotala eh
    Na yembi pe nzembo ya sika nga oyo
    Aza na bomoyi eh
    Nkolo yesu alongoli nga soni ii
    Masiya yesu akabeli nga bomoyi eh
    Amemela nga bomengo
    Alongola nga botutu apesa nga elonga
    Yesu amemela nga bomengo
    Amemela nga bomengo

    Kitakita q
    Alongola nga botutu apesa nga elonga
    Sekele ya esengo
    Mosika na yesu na kosuka wapi
    Yesu sekele ya esengo
    Sekele ya kobonga na vie
    Mosika na yesu na kosuka wapi
    Bolingo ya Jesus eyembisi nga nzembo eh
    Eh iii yesu oyo
    Alongoli nga soni ii
    Masiya yesu akabeli nga bomoyi eh
    Amemi mikumba na nga yesu oyo

    Alongoli nga soni ii
    Masiya yesu akabeli nga bomoyi eh
    Na yemba te po nini nga oyo
    Alongoli nga soni ii
    Masiya yesu akabeli nga bomoyi eh
    Yesu azali malamu yesu eh
    Azali malamu yesu eh
    Apesi nga kimia oyo mbongo epesaka te
    Apesi nga esengo oyo mayele epesaka te

    Información de la canción

    Composición:

    ¿Los datos están equivocados?

    Enviar revisión