Vallée ya Bacca

Marie Misamu

    Continues after the ad

    Oh vallée ya Bacca, eloba David na Psaumes 84: 6 ti na 7
    Vallée nde elili ya période
    Ebongo komb'oyo Bacca elakisi kolela
    Oh Nzambe sunga biso

    Nayokaka vallée ya Bacca na sango
    Vallée ya ba soucis, minioko, pasi pe mawa
    Yesu mobikisi tala lelo nga na se retrouver na kati na yango
    Nga nayokaka vallée ya Bacca na sango
    Vallée ya ba soucis, minioko, pasi pe mawa
    Yesu mobikisi tala lelo nga na se retrouver na kati na yango

    Oh moto nionso na mokili mwana Nzambe oh to mwana Nzambe te
    Epesameli biso toleka na vallée yango po bolingo na biso emonana ah
    Oh moto nionso na mokili mwana Nzambe oh to mwana Nzambe te eh
    Epesameli biso toleka na vallée yango po bolingo na biso emonana ah

    Na kati ya lubuaku ya kolela eh
    Atako oza innocent kasi ozali komona ba condamnations
    Na kati ya vallée yango
    Motema ekoma nga normal pona bapasi, oh Nzambe oh
    Na kati ya lubuaku ya kolela eh
    Atako oza innocent kasi ozali komona ba condamnations
    Na kati ya vallée yango
    Motema ekoma nga normal pona bapasi, oh Nzambe oh

    Na kati ya vallée ya Bacca
    Motema eyebaka ko corriger toli ya ba conseillers
    Oyo ya malamu to ya mabe, motema etutami oh
    Ekawuki lokola lititi eh
    Na kati ya vallée ya Bacca eh
    Motema eyebaka ko corriger toli ya ba conseillers
    Ya malamu to ya mabe, motema etutami oh
    Ekawuki lokola lititi eh

    Continues after the ad

    Oh Nzambe na ngai, soki nazoka na motema likolo ya vallée ya Bacca
    Makila ya motema na ngai ekomi kotika na traces esika nionso nakoleka
    Nzambe nga nayebi nazoka pona Yo, Yo nde mosilisi ya bampota na ngai
    Soki Yo te, nani mosusu? Soki osungi te soni ya Yo moko
    Nzambe atako butu yango eleki molayi, tongo ekosuka kaka na kotana

    Na kati ya vallée ya Bacca
    Bonheur alingaki kosimba nionso ekimi nde kokima
    Mosika na ngai oh na kati ya vallée ya Bacca
    Motema pasi oh
    Na kati ya vallée ya Bacca eh
    Bonheur alingaki kosimba nionso ekimi nde kokima
    Mosika Marie oh na kati ya vallée ya Bacca
    Motema pasi oh

    Na kati ya vallée ya Bacca
    Ekomaka pasi pona moto aya kotala yo
    Ata motema eboyi séparation
    Okomona kaka ezali koyela yo, nga nakima wapi oh
    Na kati ya vallée ya Bacca
    Ekomaka pasi pona moto aya kotala yo
    Ata motema eboyi séparation
    Okomona kaka ezali koyela yo, nga nakima wapi oh

    Nzambe osali nga monganga ya bapasi
    Po naconseillaka ba oya baza koleka na kati ya vallée yango
    Ndeko soki vallée ya Bacca ekomeli yo
    Yo talelaka bobele Nzambe
    Mpo Ye nde mosungi ya kokamwa, Ye nde mobali kitoko
    Soki atomboli yo, moto moko te akoki kotelemela yo
    Na makasi na ye ekokoka te liloba ya suka ezali epayi na Ye
    Yo talelaka bobele Nzambe

    Ah vie na nga ekoma lokola monganga oyo
    Ya ko examiner makambo ya mabe to ya malamu
    Yo Nzambe omoni oh
    Vie na nga ekoma lokola monganga oyo
    Ya ko examiner makambo ya mabe to ya malamu
    Yo Nzambe témoin na ngai oh

    Nzambe naye naye osunga nga
    Mpo nga moto ya liboso naleka yango te oh
    David na ye ndeko na ye mpe alekaki ye alongaki eh
    Yango alobaki ete esengo na moto oyo
    Kotia elikia na ye epayi ya Nzambe oh, oh Nzambe oh

    Ata naza ko traverser na nga na kati ya lubuaku yango eh
    Nzambe okobongola yango esika na esengo
    Pe makasi na moto oyo azali koleka na kati, eh

    Vie na nga ekoma lokola monganga oyo
    Ya ko examiner makambo ya mabe to ya malamu
    Yo Nzambe omoni oh

    Moninga soki eyeli yo te oh, okoyeba oh kilo na yango te oh
    Moninga soki eyeli yo te oh, okoyeba oh pasi na yango te oh
    Baninga nzoka esuwaka boye oh eh
    Baninga nzoka esuwaka boye oh eh

    Song details

    Composition:

    Did you see an error?

    Enviar revisão