Trop C'est Trop

Mike Kalambay

    Continues after the ad

    Trop c'est trop, trop c'est trop
    Toleli mpe mingi (papa y'olembi)
    Trop c'est trop, trop c'est trop
    Kozanga na kolela esa ya biso te bana nzambe
    A la croix tout est accompli

    Toleli mpe mingi
    Sembola loboko na yo
    Ba christo toniokwami mingi
    Tokomi na suka papa eh
    To prier to jeûner mpe mingi
    Ekomi tango ya témoignage

    Oyo nazo mona eh
    Ekeseni na ba ndonto na ngai
    Oyo nazo lota eh
    Yango nazo bika te oh

    Mowumbu likolo ya mpunda
    Mwana nzambe na makolo
    Bapagano bazododwa
    Nga mochristo nazo lela
    Tango nazo luka mwana
    Ndumba aboti abwaki mwana
    Mochristo azangi bileyi
    Mopagano ali abwaki lisusu na fulu
    Ba poste ya minene
    Ekoma condition okota na loge

    Oyo nazo mona yango te olakaki na nga
    Oyo nazo bika ekeseni na maloba na yo

    Ah ba ndoki boloki mpe mingi
    Trop c'est trop ekoki
    Liboso tobwakaki bombe
    Sikoyo tosimbi chicotte
    Misala ya bana na nzambe
    Bo zwi bovandeli yango
    Ba commerces bazo sala
    Capital ezokola te
    Ba etudiant baza kotanga
    Misala ezali wapi?
    Ba fonctionnaire bazo sala
    Salaire bazo simba te
    Policier na soldat ya mboka
    Sunga bango ya yesu
    Ba oyo ba zwa mabala
    Mabota ezali wapi
    Basusu mvula na mvula
    Maladie ezosila te oh
    Papa bitumba na mboka na nga
    Na est ezosila te oh
    Ba nguna ya mboka congo
    Balobi bakotika te
    Dignité ya mama ya congo
    Ekoma nango bafoué
    Ba viol, koboma koyiba
    Ozomona tozomona te oh

    Oyo tozomona ekomama wapi yesu na nga
    Oyo tozo vivre ezali te na maloba na yo

    Eza yo moto olobaki

    Continues after the ad

    Les ténèbres ne règneront pas toujours
    Ces égyptiens vous les verrez plus jamais

    Bana na yo toza sekolela
    Ya mbala oyo ekoki (c'est trop)
    Papa kota likambo ango (c'est trop)
    Na yoki kanda emati (c'est trop)
    Ah eh kanda molimo (c'est trop)
    Papa esi tolembi (c'est trop)
    Nkolo loba liloba suka (trop c'est trop)

    Mvula na mvula tokufela kaka na famille (trop c'est trop)
    Na soigna diabete bongo papa lelo ekomi olanda nga (trop c'est trop)
    Na biso mabala na famille kaka yaka tofanda (trop c'est trop)
    Seigneur je t'en pris encore une fois prend moi le fouet (trop c'est trop)
    Fouette moi tous les sorciers qui envoute ma famille (trop c'est trop)
    Chicotte moi tous les sorciers qui envoute mon pays (trop c'est trop)
    Qu'il soit occultiste, magicien, tous les tchiors et les tchiorcettes (trop c'est trop)

    Fire!

    Nazo sala mingi salaire eza mediocre
    Wuta nakota libala mabota eza wapi oh
    Papa mvula na mvula naza se kolenga

    Ah ya mbala oyo c'est fini (c'est trop)
    Papa kota likambo oyo (c'est trop)
    Na yoki kanda emati (c'est trop)
    Kanda molimo (c'est trop)
    Vraiment moi j'en ai marre (c'est trop)
    Papa loba likambo ya suka (trop c'est trop)

    Nga pona lia papa il faut que je tende la main (trop c'est trop)
    Soki bilaka nayo eza pona nga te loba na yeba (trop c'est trop)
    40 ans yango encore et toujours na ndako a ba parent (trop c'est trop)
    Papa ba ye kota nga elongo babonga na la vie (trop c'est trop)
    Est ce que bolamu nayo eza kaka pona ba susu (trop c'est trop)
    Yango chicotte moi tous ces sorciers qui envoute nos églises (trop c'est trop)
    Qu'il soit bishop, réverends surtout prophetes (trop c'est trop)

    Chicotte!

    Ata bapasi eleki
    Motutu elati nga nzoto
    Bitumba ya butu mpe moyi
    Nga na ko banga te
    Mpo na yebi na bomoyi na nga
    Yokosala eh
    Yesu nakangi motema na yebi yokosala (okosala)
    Ba ngomba, ba jeûnes, ba retraites ya pamba te (okosala)
    Ata liboso a bitumba je garde mon silence (okosala)

    Alleluia!

    Ata esi tolembi
    Bilelo ngambo na ngambo
    Elikia epayi na ye
    Elongo ye akosaka te
    Vraiment pona mboka congo (akosala)
    Ata butu ewumeli suka suka tongo (ekotana)
    Juste un peu de patience ayebi likambo na yo (akosala)
    Mbula oyo bilaka na ye pona bomoyi na yo (ekosimba)
    Pona ba etudiants ya congo na ba ndeko ya diaspora (akosala)
    Basi bakufela mibali na bana bitike (akosala)
    Pona ba mama ya ngambela na ba ye ya zando (akosala)
    Nabosani te ba oyo ya kikolo na ba ye chikwanza (akosala)

    Alleluia!

    Kolela na yo epekisa obetela yesu mololo te
    Mololo, alleluia!

    Ata bapasi eleki
    Botutu elati nga nzoto
    Bitumba ya butu mpe moyi
    Nalenga te
    Mpo na yebi na bomoyi na nga
    Akosala eh

    Song details

    Composition: Mike Kalambay

    Did you see an error?

    Enviar revisão