Mosantu ya batu avandaka na lola
Andima kosopa makila
Atalisanga nzela ya bomoyi
Apesanga bolingo ya banguna na ngai
Nkolo oh Yesu, kumama na yo
Omonaki moto esengeli azala na avocat
Oyaki osopi makila na yo
Okoma avocat na ngai epayi ya papa
Nkolo oh Yesu kumama na yo Mosusu azali te
Mokolo moko te Yesu na ngai bakobenga yo ex Nzambe
Kiti na yo seko na seko
Oko céder yango te epai ya moto Yaya
Namona batu kofuta mbongo po ba voter bango Bakoma ba Présidents
Ata ba renouveler mandat na 200 ans, Présidence ezalaka te
Kasi oyo ya yo bokonzi, ezanga ebandali, ezanga suka
Na lola mandat ekozala te, ba élection ekozala te
Po ozali nzambe na bomoyi
Suki ya pembe ekobima te na moto na yo
Yango wana totomboli maboko likolo
Totatoli oyo asimbi likolo na se
Suki ya pembe ekobima te na moto na ye
P'oza Nzambe
Kumama nkolo mosusu azali te