Cifra Club

Je vis avec le P.D.G. (feat. Baniel Bambo & Nana Akumu)

Franco Luambo

Aún no tenemos los acordes de esta canción.

Lobi tosololaki mingi na pokwa, na sima nga nakei kolala ah
Kasi na butu nayoki pongi te, nakomi komituna soki ya solo
Lisolo omemelaki ngai, nakomi kobanga soki pe baloki ngai te oh
Zuwa nini y'okosalela nga, tokabwana kala yo osi obala
Na motindo nga nayamba yo, okanisaka oyaka se kotala mwana
Lelo olukeli nga mindondo eh, olobi tozongana Dodo nakamwe
Nazalaka nde occupée oh babala nga kala nakoma na P.D.G.

(Franco voix off)

Nalatisa yo ata palata, bolingo esili makambo eleki
Bapemisa ata moke nzoto, noki nakufa pona yo

Napekisaki yo nzela wana, au lieu otika olandi kaka
Na juger kaka yo olingaka ngai te, tovandi bolingo ya presence
Dodo papa ah, makambo matondi na motema
Nakamati décision oh bolingo na mayi na miso mama

Dodo papa ah, bolingo ezalaki na motema
Soki na decouragé foti ezalaki epayi na yo

Nalakisaki yo patience, okanisaki nazali zoba
Nazalaki se koyebisa mokolo ezali nakoboya yo

Nalakisaki yo fidélité, okanisaki nga natula
Lelo oyo nga yo nabali, Dodo, nasengi obosana nga
Dodo papa ah, motema ozali moko eh
Napesa na P.D.G. eh, wapi moyen nga na tromper ye
Tika ko regretter eh, yina faute na munu ve
Kanga motema bosana ezali ba erreurs ya la vie

Otros videos de esta canción
    0 visualizaciones

    Afinación de los acordes

    Afinador en línea

    Ops (: Contenido disponible solo en portugués.
    OK